1 Peter 5

Mitindo epai ya bakambi kati na lingomba mpe epai ya bandimi

1Nazali kolendisa bampaka oyo bazali kati na bino, ngai oyo nazali mpaka elongo na bango, temwe ya bapasi ya Kristo, mpe oyo akosanganana nkembo oyo ekomonana. 2Bozala babateli ya bameme oyo Nzambe apesa bino mpo na kobatela. Bokengelaka bango ndenge Nzambe alingi mpo na bino, kasi na kotindika te. Bosala mosala na bino na lokoso ya mbongo te, kasi na posa moneneya kosalela bango. 3Boluka kolakisa bokonzi na bino te likolo ya bato oyo Nzambe apesabino mpo na kobatela, kasi bozala ndakisa epai ya bameme. 4Bongo tango Mokonzi ya babateli ya bameme akomonana, bokozwaekoti ya lokumu, oyo ya nkembo, oyo ekobungisa kitoko na yango te.

5Ndenge moko mpe bino bilenge, botosaka baoyo bazali bakolo. Bolata komikitisa moko na moko, Pamba te : Nzambe atelemelaka bato ya lofundu, kasi apesaka ngolu na ye na bato oyo bamikitisa
Tala mpe Masese 3.34
.
6Yango wana, bomikitisa na nse ya loboko ya nguya, oyo ya Nzambe, mpo akoka kotombola bino na tango oyo ekoki.

Malendisi

7Bobwaka epai na ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, Pamba te ye moto abatelaka bino. 8Bomibatela mpe bozala ya kobongama. Monguna na bino, Zabolo, azali koleka-leka pembeni-pembeni na bino lokola ntambwe oyo azali kongulumampe azali koluka nani akolia. 9Botelemela ye mpe bopika pende kati na kondima, mpo boyebi ete bandeko na bino oyo bapalangana kati na mokili bazali mpe kokutanana bapasi ya ndenge moko. 10Kasi tango bokosilisa komona pasi mpo na mwa tango moke, Nzambe ya ngolu nyonso, oyo abenga bino na nkembo na ye ya seko kati na Kristo, ye moko akokomisa bino bato ya kokoka, akolendisa bino, akopesa bino makasi, mpe akotelemisa bino ngwi.

11Nguya ezala na ye mpo na libela na libela. Amen !

12Na lisalisi ya Silas, oyo azali ndeko ya solo, nakomeli bino mokandaoyo na mokuse, mpo na kolendisa bino mpe kolakisa bino ete ngolu oyo bokangami na yango ezali ngolu ya solo ya Nzambe. Bopikama kati na yango.

13Lingomba oyo ezali na Babilone, oyo Nzambe apona elongo na bino, etindeli bino mbote. Mwana na ngai Marko atindeli bino mpe mbote.

14Bopesana mbote moko na moko na beze ya bolingo. Kimia ezala na bino nyonso oyo bozali kati na Kristo.
Copyright information for LinMNB